Mark 5

Yesu aleki milimo mabe na makasi

(Mt. 8.28-34 ; Lk. 8.26-39)

1Bongo bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya bato ya Gereza. 2Tango Yesu akitaki na bwato, moto moko azalaki na molimo mabe awutaki na simetiele, ayaki kokutana na ye.

3Moto yango azalaki kovanda na simetiele ; mpe moto ata moko te azalaki kokoka kokanga ye, ata mpe na minyololo. 4Pamba te, mbala mingi bazalaki kokanga ye na minyololo mpebazalaki kotia ye mabende na makolo, kasi azalaki kokata minyololo mpe kobuka mabende yango ; mpe moto ata moko te azalaki na makasi ya kokoka mpo na kolembisa ye. 5Tango nyonso, butu mpe moi, azalaki koyenga-yenga na simetiele mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.

6Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu mpe afukamaki liboso na ye ; 7mpe agangaki na makasi nyonso :

—Olingi nini na ngai, Yesu Mwana na Nzambe oyo aleki Likolo ? Nabondeli yo na kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !

8Pamba te, Yesu azalaki koloba na molimo yango :

—Molimo mabe, bima na moto oyo !

9Bongo Yesu atunaki ye :

—Kombo na yo nani ?

Ye azongisaki :

—Kombo na ngai : “Legion”, pamba te tozali ebele !

10Bongo molimo mabe ezalaki kobondela Yesu mpo abengana bango te na mokili wana. 11Nzokande, lisanga monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.

12Milimo mabe ebondelaki Yesu :

—Tinda biso na bangulu, mpo tokota kati na bango !

13Yesu apesaki bango nzela. Bongo milimo mabe ebimaki mpe ekendaki kokota na bangulu. Bangulu yango nyonso ezalaki pene-pene na nkoto mibale ; ekitaki mbangu na ngomba, ekendaki kokweya na kati ya mayi, mpe ekufaki.

14Bakengeli ya bangulu yango, bakimaki mbangu mpe bamemaki SANGO na ba-vile mpe na bamboka. Bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalama. 15Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na milimoebele ya mabe avandaki wana, alataki bilamba mpe mayele na ye ezongaki malamu. Bongo somo ekangaki bango. 16Baoyo bamonaki likambo yango, bayebisaki bato likambo oyo esalamakina moto oyo azalaki na milimo mabe mpe na bangulu. 17Bongo bato yango babandaki kobondela Yesu mpo alongwa na mokili na bango.

18Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na milimo mabe abondelaki ye mpo akende na ye.

19Kasi Yesu aboyaki mpe alobaki na ye :

—Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo, mpe yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge ayokeli yo mawa.

20Bongo moto yango akendaki mpe abandaki kopanza na “Bavile zomi” sango ya makambo oyo Yesu asalelaki ye.

Mpe bato nyonso bakamwaki.

Yesu aleki maladi mpe liwa na makasi

(Mt. 9.18-26 ; Lk. 8.40-56)

21Tango Yesu akatisaki lisusu na ngambo ya ebale, na bwato, bato ebele bayaki kosangana epai na ye ; mpe azalaki pembeni ya ebale monene.

22Bongo moko na kati ya bakonzi ya Ndako ya mayangani, kombo Yayirusi, ayaki wana. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na ye, 23mpe abondelaki ye mingi :

—Mwana na ngai ya mwasi alingi kokufa. Nabondeli yo, yaka mpe tiela ye maboko, mpo ete abika mpe azala na bomoi.

24Bongo Yesu akendaki na ye elongo. Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpe kofina-fina ye bipai nyonso. 25Mpe mwasi moko azalaki wana, azalaki na maladi ya kotanga makila bambula zomi na mibale. 26Amonaki pasi mingi penza mpo na kokendeke epai ya minganga ebele ; mpe asilisaki mbongo na ye nyonso pamba kasi mbongwana ezalaki te. Kutu pasi ezalaki kaka komata. 27Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima-sima, na kati ya ebeleya bato, mpe asimbaki elamba na ye. 28Pamba te azalaki kokanisa :

—Soki nasimbi ata bilamba na ye, nakobika !

29Kaka na tango wana makila etikaki kotanga, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abikaki na pasi na ye.

30Kaka na tango wana Yesu ayebaki ete nguya ebimaki kati na ye. Abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki :

—Nani asimbi bilamba na ngai ?

31Bayekoli na ye bazongisaki :

—Boni, omoni ndenge bato bazali kofina-fina yo bipai nyonso, bongo ozali lisusu kotuna : “Nani asimbi ngai ?”

32Kasi Yesu azalaki kotala epai na epai mpo amona soki nani asalaki yango. 33Mwasi abandaki kobanga mpe kolenga mpo ayebaki likambo oyo esalamaki epai na ye ; bongo ayaki afukamaki liboso ya Yesu mpe ayebisaki ye solo nyonso.

34Yesu alobaki na ye :

—Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe bika na pasi na yo !

35Tango Yesu azalaki naino koloba, ndambo ya bato bayaki wuta na ndako ya mokonzi ya ndako ya mayangani, mpo na koloba na ye :

—Mwana na yo ya mwasi akufi ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?

36Kasi Yesu ayokaki maloba yango ; mpe alobaki na mokonzi ya ndako ya mayangani :

—Kobanga te ; Ndima kaka !

37Apesaki nzela na moto ata moko te mpo alanda ye ; longola kaka Piere, Zaki, mpe Jean ndeko ya Zaki. 38Tango bakomaki na ndako ya mokonzi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yiki-yiki, na baoyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.

39Akotaki mpe alobaki na bango :

—Mpo na nini yiki-yiki oyo nyonso ? mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te, kasi alali pongi !

40Kasi basekaki ye.

Sima ya kobimisa bango nyonso libanda, akamataki tata na mama ya mwana, na bayekoli oyo bazalaki na ye elongo, bongo bakendaki epai mwana azalaki.
41Akamataki ye na loboko mpe alobaki na ye :

—Talita koumi (yango elingi koloba : Elenge mwasi : nalobi na yo, telema).

42Kaka na tango wana, elenge mwasi atelemaki mpe abandaki kotambola. Azalaki na bambula zomi na mibale. Bango nyonso bakamwaki mingi penza. 43Kasi Yesu apekisaki bango mpo bayebisa likambo yango ata na motomoko te. Mpe alobaki na bango bapesa ye eloko ya kolia.
Copyright information for LinMNB